Yokela Nga Mawa Lyrics



Yokela Nga Mawa


Yahweh na lola 
Oyo mawa bolingo pe ngolu eleki ndelo
Na sosoli ete pasi pe minioko elati nga nzoto 
Po naza mosika nayo
Nde tina naye ko mi kitisa nase ya makolo nayo  Oyokela ngaï mawa 
 
Naye kosenga bolimbisi masiya ehh
Naza yasolo mosumuki oh Yahweh 
Nandimi mabunga nangay 
Papa nako lela oyokela ngay mawa ahh
Motema motondi na mawa oh Yahweh 
Mpo pasi ngayi nako mona oh lelo 
Nayebi te soki eza masumu 
To pe eza b’ épreuves nazo leka na vie na nga 

Motema motondi na mawa
Yahweh yokela nga mawa 
Ko bombela ngay te elongi no 
Sala pe na ngay lolenge osalaki na job 

Chœur:
Yokela nga mawa nzambe (ahh Yahweh)
Naye epayi nayo nkolo (ngay nakoki te)
Nga moko nakoki tehh Yahweh 
Nasengi osalisa nga. (Yokela nga mawa)

Yokela ngayi mawa nzambe (ngay naye nayo)
Naye epayi nayo nkolo (muana nayo na salela yo ehh)
Nga moko nakoki tehh (ahh Yahweh)
 Na sengi osalisa nga.

Kobombela ngay te Yahweh 
Elongi nayo nkolo ( ahh papa eh)
Yoka mongongo nanga
Nasengi osalisa nga( 2x)

Papa na beleliyo oyoka ngay muana nayo 
Nazali kolela ehhi tango nioso na losambo 
Papa ozali wapi yanola ngay muana nayo 
Elikia nangay nioso natie epayi nayo, kino tango nini oko sala na bomoyi nanga ah 

Yahweh ozali na nioso papa (aahh papa ehh)
Ozangi eloko te po osala na bomoyi nanga.

(Nzambe azali elonga y’a baye nioso bakimelaka epayi naye)

Na talelaka nanga kaka yo ehh 
Po solution nanga ezali se nayo eh 
Bitumba nioso okotaka suka elonga 
Nayo nde ngay natiya elikia ehh (2x)

Naye, 
Solution nanga eko wuta se nayo ehh
Elombe y’a bitumba nangay kino suka 
Esika nazalaki ya liwa eh olongoli ngay eh 
Ata bitumba ya molimo yonde elonga nangay, Naye  
Papa nanga 
Mobateli malamu se yo eh 
Nazali yasolo muana yo 

 (Il ne t’abandonnera jamais ;  
Il ne te délaissera point. 
Il est toujours disponible.)


 

Post a Comment

0 Comments